|
Latina, lilatina tǒ latɛ́ (latin o lifalansé) ezalákí lokótá la ba-Roma. Ezalí mpé lokótá bakosála mpɔ̂ kobénga bikɔ́lɔ na nzébi. Lokótá latina loútákí mbóka Roma mpé lopanzámákí na bopanzi bwa Roma o lombú Mediterané mpé o Sidi ya Erópa. Nkótá isúsu ikitaní latina o Erópa, ibéngámí nkótá latina : lifalansé, lirumani, litaliani, lipulutugɛ́si, lispanyoli, b.n.b. O mokɔ́lɔ mwa lɛlɔ́, ekelézya katolíko eloba naíno o lokótá latina. NzébiBabéngaka mitíndo mya bitɔɛlɛ mpé mya nyama na nkómbó o lokótá latina. Ndakisa : Microdesmis pubecula ezalí nkómbó ya nzébi ya mweté ekonzo. |
This article is from Wikipedia. All text is available under the terms of the GNU Free Documentation License.
Mercedes Car
This site monitored by SitePinger.net