Zapɔ́ ezalí esé o monyɛlɛ ya Azía. Ezalí lisangá lya bisanga, bisanga bínei ya monɛ́nɛ na yɔ̌kɔ́ elekí monɛ́nɛ o mokili mobimba. Bisanga byangó bikutanaka o monyɛlɛ mwa Azía mpé o límbe lya mbú Pasifíki. Mbóka-mokonzi ezalí Tokyo.
Bai-Zapɔ́ babéndaka mbóka na bangó « Nihon » tǒ « Nippon » eye elingí koloba « ebandelo ya mói », tǒ « ebandelo ya lotɛ́mɛ ».